js222111_bni_exo_text_reg/22/01.txt

4 lines
575 B
Plaintext

Ndiki moto ayibi Ngombe soko mpe mwana o Mbata, amoketi nkingo soko mpe amoteki, akoyuta Ngombe litano o epos'e Ngombe yoko mpe bana ba Mbata banei o epos'e mwan'o Mbata moko.
Soko bamokati na ebwele eliki ayiba o loboko, bamobeti mpe awi, ndiki enga mokolo aki mpamba;
Nde ndiki enga mwese, bakobila bato baliki bamoboma. Soko anga nabomoyi akoyuta biloko binya biyibi ye, ndiki toyisa noyuta akotekibwa n'etondo e loyiba lo ye.
Soko biloko biliki ye ayiba binga nani o maboko ma ye: ngombe,mpunda, mwana o mbata, ndiki binga nani na bomoyi akoyuta bingo bibale bibale.