Ndiki moto ayibi Ngombe soko mpe mwana o Mbata, amoketi nkingo soko mpe amoteki, akoyuta Ngombe litano o epos'e Ngombe yoko mpe bana ba Mbata banei o epos'e mwan'o Mbata moko. Soko bamokati na ebwele eliki ayiba o loboko, bamobeti mpe awi, ndiki enga mokolo aki mpamba; Nde ndiki enga mwese, bakobila bato baliki bamoboma. Soko anga nabomoyi akoyuta biloko binya biyibi ye, ndiki toyisa noyuta akotekibwa n'etondo e loyiba lo ye. Soko biloko biliki ye ayiba binga nani o maboko ma ye: ngombe,mpunda, mwana o mbata, ndiki binga nani na bomoyi akoyuta bingo bibale bibale.