Mosi na Alona batamboli nzela mpe bayonginyi bampomba ba bana ba Yisalaele. Alona abasakoli maloba manco maliki Yawe aloba na Mose, mpe nomekola bilembo binco o miso ma bango. mpe bato bayambi. Bongo bayebi ete Yawe ayeneli bana ba Yisalaele mpe aboni minyoko mi bango: mpe bayinami mpe bamokumbameli.